Engumba
Apparence

Engumba (tǒ engúmba) ezalí lisangá lya bato bavándaka o esíká yɔ̌kɔ́. Ezalí na ndáko iyíké, nzelá iyíké, zándo, wɛnzɛ tǒ magazini. Babêngaka yangó mbóka monɛ́nɛ tǒ mbóka ya mindɛ́lɛ́.
O Kongó-Kinsásá mokonzi mwa engúmba abêngamaka bugumési mpɔ̂ na engúmba na ezalela ya localité, mpé maire mpɔ̂ na engúmba na ezalela ya ville.
![]() |